Information identified as archived is provided for reference, research or recordkeeping purposes. It is not subject to the Government of Canada Web Standards and has not been altered or updated since it was archived. Please contact us to request a format other than those available.
Biló ya bobóngoli minkandá na nkóta isúsu ya guvɛ́nɛ́ma ya Kanada ezali kotɔ́ndɔ botɔ́ndi Dikisyó ya lokóta lifalasé, ntɔ́ki ndéngé na ndéngé mpé zébi nkóta ya Lingómbá lya molɔ́ngɔ́ mpô na boyókani káti ya bikóló bya lokóta lifalasé, mpé lokóla bakonzi ba bikóló bitáno bindimáki kosála na yangó elɔngɔ́ mpô na lisálisi lya byángo na mwángo Boyókani Boyékoli maloba na masíni – Afrika: ntómbwáná ya nkóta ya Afríka mpé keleyɔ́lɛ (mwángo CTA). Mosálá moye mokambémí na mwángo moye. Ezalí mpé kopésa matɔ́ndi ma yangó na Dikisyó ya mambí ma boyókani káti ya bikólo bya lokóta lifalasé ya ministɛ́lɛ ya mambí ma bapaya ya Kanadá, míngi mpenza na bantómá ba yangó pɛnɛ ya Ambasade ya Kanadá na Paris, mpô na tolí mpé lisungí ya motúyá bapésí mpô makambo maye masálema. Búku eye ekokákí kobima tɛ̂ sɔ́kí bakambi ba bikípi bya bikólo na basálisi ba bangó bamípésákí tɛ̂.
Maloba maye masálísákí mpô na kosála búku eye maútí na Lexique de la femme et du développement mosálémí na Line Paradis mpé mobimísámí na Biló ya bobóngoli minkandá na nkóta isúsu ya guvɛnɛmá ya Kanadá mpô ya bopanzi mangó ntangó ya likita lya molɔ́ngɔ́ litálí bǎsí na 1995.
Boponi malobapɛ́ mpé bokúnisi : bikípi CTA bya bikólo bisálisi (Giné, Mali, Repibliki demokratíki ya Kongó, Senegále mpé Seyisɛ́li).
Bakambi ba ekólo
Bakambi ba bikípi bya ekólo
Bakambi ba ekípi ya ekólo – Giné
Bakambi ba ekípi ya ekólo – Malí
Bakambi ba ekípi ya ekólo – Senegále
Basálisi